Psalms 150

Bokumisa Yawe na miziki


1 Bosanzola Yawe !
Bosanzola Nzambe kati na
Esika na ye ya bosantu !
Bosanzola ye na nguya na ye ya likolo.

2 Bosanzola ye mpo na misala na ye ya nguya !
Bosanzola ye mpo na monene na ye
oyo ezangi ndelo.

3 Bosanzola ye na mongongo ya kelelo !
Bokumisa ye na likembe mpe na lindanda !

4 Bosanzola ye na mbunda mpe na mabina !
Bosanzola ye na mandanda ya singa mpe na flute !

5 Bosanzola ye na bangongi ya mike !
Bosanzola ye na bangongi ya minene !

6 Tika ete nyonso oyo ezali na pema,
esanzola Yawe !
Bosanzola Yawe !
Copyright information for LinMNB